Christian Bosembe, président ya CSAC : "Totumba mboka te, tobomana pe te pona maponomi"

Christian Bosembe, président ya « Conseil supérieur de l’audiovisuel et de la communication » (CSAC) asengi na batu, mangomba ya politique pe bapanzi sango basalela te maloba ya kotukana, kofinga to kokabola bikolo. Ayebisi pe ete campagne electorale nanu ebandi te. Bayeba pe été maponomi ekoleka, kasi bomoyi ekokoba sima na yango. Nde boye, tobomana te pe totumba mboka te. Alaki ete CSAC ekopesa etumbu na oyo nyoso akobuka mibeko. 

Tolanda lisolo na ye na Alain Irung:

/sites/default/files/2023-10/191023-p-lkinshasainvitechristianbosembecsacweb-00.mp3