1. Kinshasa : Bozongi bwa mosala o parlement esalemi o mokolo mwa mosala mibale moye. Ba deputes na ba senateurs bakomanyola na session eye budjet ya ekolo mpo na mbula ekoya. Mokonzi ya Senat na eye ya assemblee nationale basengi bomoko o ekolo mpo na kobunda na kpokoso inso ekolo ezali na yango. Nzokande epayi esusu, bai opposition C64 batambalaki o balabala mpo na kotelemela likanisi lya kobongola mobeko likonzi lya ekolo.
2. Beni : O Beni bana babale babiki na na Bokono ebola. Monganga Jean Jacques Muyembe atalisi te, Ebola ebandi kosila moke moke o etuka Ituri.
3. Kindu : O Kindu bilenge batelemi mpo na kotia bopete o engumba ya bango. Likanisi lina lisepelisi bakonzi ya engumba, mpamba te bandimi kopesa maboko mpo te misala mya bopeto ya Kindu elonga.






