Boko mikolo yangoyo ba mvula bizongeli konoko na Kongo. Ezala na ba Kivus to awa na Kisasa binokaki pe mikoloyo. Pe makama masi mamonani
Na Nord kivu. Bitumba toyebisaki bino te bikokoba kuna bisalemi lisusu lelo na ba mboka Ngululu pe Kataandwa. Kasi na Mweso pe Bashali mua neti kimia ezalaki.
Ndako ya mampinga eye ekosambisa bato baye bayingelaka na ndako ya mosolo Rawbank ya Victoire awa na Kisasa esanganaki lisusu lobi. Pe basambeli banso bakendaki na Victoire yango pona kotala bilili ndenge nioso esalemaka na mokolo ya likambo yango. Bilili pe bilakisi nioso bilekaki kasi kokamwa bandeko bilili yango bimonisi basoda na ba pulusu kozwa mbongo na sanduku ya bank eye pe lisusu kobotolo mama Porshe kifunda naye to sac oyo yepe atiaki liboke naye ya mbongo abotolaki Rawbank yango ya Victoire. Kosambisa eye ekokoba mikolo mikoya.
/sites/default/files/2025-11/12112025-journallingalasoiwebr-00.mp3






