Journal lingala soir du 20022019

  • Ministre atali kolongonu ayebisi te Ebola esili o engumba Beni
  • Conseil d'Etat ebandi sika misala mya yango
  • BaiFCC bawuti kotya maboko na yoko mokanda wapi bandimi kotosa mokambi wa bango mwana mboka Joseph Kabila Kabange pe regroupement politiki na bango FCC.
  • Bantoma ya baiekolo baye baponami sika batikali na mokolo moko po na kopona kotikala o ndako bontoma to kosala misala misusu mya leta
  • Csac esengi na bapanzi sango baye basili koponama bantoma ya baiekolo kotika misala ya bopanzi sango
  • Masanga masimba mandoki sambo ya batwa bandimi kokenda komitika na Monusco o etuka ya Tanganyika.
  • Basali ba Gécamines basengi na mokonzi wa ekolo kobasunga po na bokotisi mbongwana na compagnie ya makele ena./sites/default/files/2019-02/2002019-p-l-journalparlelingalasoir-00_2.mp3