6 avril 2024 : Guylain Mutuwa asengi na ba congolais ba tia elikya na papa Simon Kimbangu pona kimya na mboka

Lokola ba kimbaguistes ya mokili mobimba, baye ya Bukavu na Sud-Kivu basanganaki mokolo ya poso moleki pona kokanisa bitumba ya prophete Simon Kimbagu, natina ya moto moyindo wuta mokolo ya le 06 avril 1921.

Pona Guylain Mutuwa, moko ya ba fidele kimbaguiste, papa Simon Kimbangu asalaki bikamuisi mingi pe azuaki ndingisa kowuta epayi ya nkolo Yesu pona ko longola moto moyindo na bowumbu.

Na libaku eye, asengi na ba congolais nionso ba tia elikya na bango epayi ya prophete Simnon Kimbangu pona kimya na mboka pe na afrika mobimba.

Guylain Mutuwa asololi yango na bolayi na Rachel Kiese Mbangu :/sites/default/files/2024-04/090424-p-l-invite_matin_bon-00_web_0.mp3