Docteur Lucien Wasingya : " Asbl Fistula Programme ezali kosunga ba mamans oyo bazali na pasi ya kokanga masuba"

Lisanga ebengami na kombo ya "Fistula programme", azuami na engumba Kinshasa ezali ko sunga ba maman oyo bazali na bokono ya pasi ya kokanga masuba.

Mokambi na yango, Docteur Lucien Wasingya atalisi ete boko ya kozanga kokanga masuba oyo ebengami na lopoto, 'Fistule obsetricale", ewuti na ko wumisa maman na pasi ya kobota.

Ye alimboli ete bokono oyo ezali kosilisa lokumu ya muasi na kati ya libota pe na kati na societé. Nata tina lisanga na ye ezali kobengisa ba mamans oyo bazali na bokono eye bayeba na koya kozua traitement ya ofele.

Docteur Lucien Wasinga asololi na bolayi na Blaise Shindani Kambala :/sites/default/files/2024-05/080524-p_invite_en_lingala_dr_lucien_mp3.mp3