" Eloko nini babengi bureau ya vote mpe ekozala epayi nini ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

24è Leçon Chronique ” les élections c`est facile à comprendre “de la semaine du 21 au 25 Novembre 2005

” Eloko nini babengi bureau ya vote mpe ekozala epayi nini ? ”

*yambo na yanola na motuna nayo,esengeli nayebisa ete kopona ezali,eye mwana inso wa ekolo to moyi lisanga akotalisa makanisi maye o eleko ya maponomi to mpo ya kokamata mokano songolo.Kopona ekoki mpe kozala lolenge lwa moto na moto akopesa makanisi maye soki bamobengi mpo ya kopona. Ezali mpe eleko ya kotuna bayi mboka banso bapesa makanisi ma bango mpo bapona bakambi to mibeko mikokamba republique ya isato.
Mpo na zongela motuna mwa yo,esika ya kopona to bureau ya vote ezali esika eye basi mpe mibali bazali kokende kopona bakambi to mibeko mikobakamba.Kolandana na mokapo mwa zomi na libwa, mwa mobeko libungutulu kata nzete libungutulu eye esalemaki o mia sanza tuku mibale na mibale mobu koto ibale na itano,etali mabongisi ya kopona mibeko mikonzi ya ekolo,o RDC, epesameli ndingisa na commission électorale indépendante na kosala ba bureaux ya vote . CEI nde ekopona motango mpe esika esengeli kozala ba bureaux ena, o etando mobimba ya ekolo.

rn* Bayi mboka bazali komituna epayi wapi ekozala ba bureaux ya maponomi ?

* Mobeko libungutulu, mitano kata nzete, libungutulu,zomi,ya mia sanza tuku mibale na mibale,mobu koto ibale na itano,mozali kolimbola ete,CEI ekoki kotia ba bureaux ya maponomi ebele mpe bipayi binso o ekolo, ata o bitando bia bakimi, o ba lopitalo mpe bitando bia boloko. Mpo ya kosali sa babeli, basi bazali na zemi to bahuti kobota, bato bazali na bilema o nzoto mpe ba mpaka bango mpe bakoka mpe kopona.Bato baye tohuti kotanga soki bakomi o esika to bureaux ya boponi esengeli kotikela bango esika bapona liboso ya banso.
Eloko mosusu esengeli koyeba bureau ya vote moko te ekoki kotiama na : rnEsika ya losambo;rnNa quartiers général to ndako ya mosala ya parti politique , ya syndicat to ya ONG.
Na nganda ya masanga te,Les débits de boissons; rnNa poste ya police;rnN a camps ya ba militaires;mpe te.
Na eteyelo ya likote lokola mpe na eteyelo ya ba ,militaire mpe te.

* Sika Tokoki koyeba banani bakosala o nteyi ya bureaux ya vote ?

* Bureau inso ya vote ekozala na mokambi moko na balandi baye babale, kalaka moko, mpe kalaka mosusu mpo ya kopesa maboko na balandi ba mokambi.Bozali ba mwasi o nteyi ya bureaux ya boponi eazali penza na ntina.Basali o . bureaux ya vote basengeli koyeba kokoma mpe kotanga mpe basengeli kozua mateya o mambi matali misala mia kokoma bato.CEI ezali na makoki ya kobalongola soki bazali kosala malamu te to soki basali mbeba songolo.Esengeli mpe koyeba ete,mokambi wa Bureaux ya vote asengeli kohuta na kati ya ba kalaka ba misala mi ambula matadi, o etando to mpe o bituka lokola mpe o ba territoire.to bato misusu bakosalaka ba compagnie ya l’Etat to ya bato bango meyi, rnTEXTE de SAMUEL KATSHAK rnOndes CourtesrnTél. : ( 00243 ) 998909787 rnTraduction faite par:rnMicheline TshwalarnJournaliste Productrice rnTele : +243 09 98186793rnRadio Okapi Kinshasa