" Nini ezali kotalisa ete maponomi makoleka na polele? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

28è Leçon Chronique élection

“ Nini ezali kotalisa ete,maponomi makoleka na polele ?’’

*Yambo nayanola na motu na mona esengeli nanu naye bisa ete, kopona ezali eleko eye,bayi mboka to bayi lisanga songolo bakolkisaakanisi ma bango na kopona to kozua mokano.Kopona elakisi ete moto na moto atalisi makanisi maye na kopona oyo ye alingi.Kopona ezali mpe lolenge ya kotuna bayi mboka ba ekolo mobimba, bapesa makanisi ma bango na kopona .
Mpo nazonga na motuna mwa yo mwa koyeba nini ekotalisa ete maponomi makosalema na polele, ezali commission électorale indépendante eye tobengi na bokuse CEI , banongi ba molongo na banongi ya batindami ba masanga ma politique na bozali bwa bango o ba bureau ya vote nde ba koloba soki maponomi maleki na polele to te. Ebongi mpe toyebisa ete,bobembami bwa maponomi ezali mpe komonana na botiaka bisika moto akobombana mpo na kopona babengi isoloirs,mpe na kopekisa ete moto akoki kotinda mosusu te mpo apona na esika naye to na mokanda .
Esengeli mpe kotalisa likambo liye lizali ete sima ya maponomi du bureau ya vote ezali kokoma mbala moko bureau ya dépouillementmpe o ngambo esusu bazali kotia na nkasa biyano na bisika biye bato banso bakoki kotanga.

“Nani akoki kozala nzeneneke to monongi ?”

*Nzeneneke mpe monongi, ezali moto inso, azala mwana ya congo to mopaya, atindami to azui ndingisa na Commission électorale indépendante mpo anongo misala mia maponomi. Kombo ya nzeneneke eye to monongi asengeli kozala na lokasa ya baponi.
Soki ba nongito ,mpe ba nzeneneke bazali te, ekoki kobebisa maponomi te.Mpe banongi na ba nzeneneke bakofutama se na baye batindi bango to masanga maponaki bango, bakoki kozala soki moke te na motu mwa Commission électorale indépendante to mwa mbula matadi, nzoka nde bokengi bwa bango bolengelami na mbula matadi.

rn”Mosala mwa ba nongi naba nzeneneke mozali penza nini na eleko ya maponomi?”

*Banongi na ba nzeneneke bazali na ntina nzike na eleko inso ya maponomi makoleka o ekolo ya biso. Bakonongo lolenge maponomi makosalema,mpe ya koyeba mbeba inso mpe bozangi o nteyi ya misala mia kopona. Ba lolaka ya bopanzi sango lokola Radio Okapi,ekopesa sango na baponi lolenge mambi manso matali maponomi mazali kosalema,na boye ezali kosunga bayi mboka bakoka mpe koyeba manso mazali kosalema na ntina ya maponomi o etando mobimba ya ekolo.

SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 0998909787rnTraduction faite par rnMicheline TshwalarnTel : 09 98186793