" Ntina mpe mosala mwa mokonzi wa ekolo ezali nini ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” ntina mpe mosala mwa mokonzi wa ekolo ezali nini ?”

* Mosala mwa mokonzi wa ekolo moyebani uta mibeko mikokamba ekolo RDC.Molongo mwa tuku motoba na libwa mwa mobeko mwa ekolo mozali koloba ete,moyangeli wa ekolo ye nde azali mokonzi mpe mokambi wa mabele manso ma ekolo.Azali elembo ya bomoko bwa ekolo. Mokonzi wa ekolo akosinzela mpo ya botosi bwa mibeko mikokamaba ekolo, mpo ete misala minso mitambola malamu, ekolo ekende o boso. Ye nde akobatela bonsomi bwa ekolo, bwa biteni binso bia mabele ma ekolo, mpe akosala manso mpo ete boyokani na bikolo bisusu etosama.
Mokonzi wa ekolo nde akopona ministre wa yambo to Premier ministre kati ya lisangta lia ba ntoma ba bana ba ekolo, na lisanga lizali na ba ntoma bayike koleka masanga misusu.Kasi yambo ya manso asengeli nanu kobatuna. Mosala mwa ministre wa yambo mokosila soki ye meyi eboyi mosala na kotalisaka na mokonzi wa ekolo mokanda mwa démission na mbula matadi.
Mokonzi wa ekolo, akotia mpe o bibonga bayi mbula matadi misusu o bibonga bia mosala , mosala mwa bango mokosila na bosenga bwa ministre wa yambo to Premier ministre.

” Lolenge nini ekosalenma maponomi ya mokonzi wa ekolo? ”

*Mobeko libungutulu motoba, kata nzete libungutulu, libungutulu motoba, ya mia sanza libwa sanza ya misato mobu koto ibale na motoba etali maponomi ma mokonzi wa ekolo,ba ntoma ba bana ba ekolo,kino o ba localité,ezali koyebisa ete mokonzi wa ekolo bakomopona na bayi ekolo banso na maponomi makoki kosalema mbala ibale mpo ya kobakabola, akosala mibu mitano soki bayi ekolo basepeli na lolenge lwa mosala mwa ye, bakoki lisusu komopona mpo ya mibu mitano.
Molongo kama yoko na ibale mwa mobeko mwa ekolo mozali koloba ete,maponomi ma mokonzi wa ekolo makosalema na bosenga bwa Commission Electorale Indépendante mikolo tuku libwa yambo ya bosuki bwa mandat ya mokonzi wa ekolo oyo asengeli kobima.

“Moto alingi kokoma mokonzi wa ekolo asengeli kozala ndenge nini to asengeli kokokisa mambi kani?”

Moto nionso alingi kokoma mokonzi wa ekolo asengeli kokokisa mambi maye :rn1.Kozala mwana wa ekolo RDC ya kobotama. rn2.Kozala na mibu tuku misato to koleka na tango azali kokende kotika candidature na ye;rn3.Kozala na makoki manso ma bo civil mpe maye ma politique;rn4.Azala moto moye asilaki kokomisa kombo kati ya baye basengeli kopona mokolo azali kokende kotika kombo na ye na C.E.I.
Tika toyebisa mpe ete mokonzi wa ekolo soki aponami, akobanda mosala mikolo zomi mikolanda bopesi biyano bia suka bia maponomi .Yambo abanda mosala, mokonzi wa ekolo akokata ndaye lolenge loye :rn-Ngai songolo, mwasi to mobali,na mponami kozala mokonzi wa ekolo,RDC,na lapi ndaye,o boso bwa nzambe mpe o boso bwa ekolo mobimba:rn-NaKotosa mpe kobatela mibeko mia ekolo,rn-NaKobatela bonsomi bwa ekolo mpe etando mobimba ya ekolo.
-Na Kobatela bomoko bwa ekolo, nandimi kokambema kaka na bolingo bwa kosalela bolamu bwa banso, nakotosa makoki ma bato rn-Na Kopesa makasi ma ngayi nionso mpo ya ntombwa mpe bolamu bwa banso na kimia .
-Nakozala mosali molamu mpo ya bayi ekolo na botosi mpo ya kokokisa na lokumu mosala bapesi ngai.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] :Micheline Tshwala rnTél:00243998186793