" Mbula matadi ya etuka to gouvernement provincial ezali nini mpe ntina na yango ezali nini ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Mbula matadi ya etuka to gouvernement provincial ezali nini mpe ntina nayango ezali nini ?”

* Mbula matadi ya etuka to gouvernement provincial yango nde ezali kokamba bokonzi mpe ekambeli o etuka. Kolandana na molongo kama yoko tuku libwa na mwambe ya mobeko likonzi mozali kokamba ekolo na biso République Démocratique ya Congo, mbula matadi ya tuka to gouvernement provincial ekokambama na bato baye : gouverneur na molandi waye elongo na ba ministre o bituka to ba ministres provinciaux.
Ba gouverneur na balandi ba bango, bakobapona mpo ya mibu mitano mpe bakoki kobapona lisusu mpo ya mibu mitano. Bakobapona na députés provinciaux o kati to libanda ya assemblée provinciale. Bakobanda mosala na etinnda ya mokonzi wa ekolo.

“Sika yebisa biso nani akopona ba ministre o etuka to ba ministres provinciaux meyi ?”

* Ba ministre provinciaux bakobapona na moyangeli wa etuka o nteyi to libanda lia assemblée provinciale. Motango mwa bango mokoki koleka zomi te.Tika to yebisa ete,na tango bazali kosala mbula matadi ya etuka esengeli mpe kotala malamu likambo lia ba nkota ezuami o etuka ena, elingi koloba bato banso bamimona o kati ya mbula matadi ena.
Yambo abanda mosala, moyangeli wa etuka esengeli nanu kotalisa manaka maye. Soki manaka mana mandimami na bayi assemblée provinciale banso,wana ba ministres provinciaux bakoki kobanda mosala mwa bango.
Tika toyebisa lisusu ete, bayi mbula matadi ya tuka to gouvernement provincial bakoki kobalongola banso to kolongola moko wa bango na mosala,na bosenga bwa assemblée provinciale.

” Maman Micheline yebisa biso nini ekokoma soki moyangeli wa etuka aweyi,to atiki mosala na bosenga bwa ye meyi,to mpe bamopekisi kosala mosala libela na lifunda lia mbula matadi ya etuka ? ”

* Molongo mwa kama yoko na tuku motoba,mwa mbeko libungutulu motoba kata ndjete libungutulu,libungutulu motoba mosalemaki mwa libwa sanza ya misato mobu koto ibale na motoba , motali maponomi ma mokonzi wa ekolo,ba ntoma ba bana ba ekolo, o bituka kino o ba localité,mozali kolimbola ete soki moyangeli wa etuka eweyi, to atiki mosala na bolingo bwa meyi, to mpe lifunda lia mbula matadi ya etuka emopekisi kosala mosala,wana mbula matadi mobimba ya etuka esengeli kolongwa to ko démissioné . Nzoka nde bakotikala moke o ekambeli ya molandi wa moyangeli mpo ya kosilisa mambi mike mike matikali.
Sima ya mikolo zomi na mitano, esengeli commission électorale indépendante esalisa maponomi mpo batia mbula matadi ya sika.
Mpo ya kosukisa, tika toloba ete, maponomi ma moyangeli wa etuka mpe maye ma molandi waye, makosalema sima ya mikolo tuku mibale na moko ya bobandi mosala mwa bayi assemblée provinciale.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected]: Micheline Tshwala rnJournaliste Radio Okapi.
Mobil. : 00243998909787