" Lolenge nini ekosalema maponomi ya bayangeli ba bingumba to ba maires na balandi ba bango ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Lolenge nini ekosalema maponomi ya bayangeli ba bingumba to ba maires na balandi ba babango ? ”

* Moyangeli wa engumba ye nde mokonzi o ba commune ya engumba. Koponama ya ye mpe mosala asengeli kosala ekeseni kolandana na bikolo. Tokoki mpe koloba te moyangeli wa engumba ye nde zuzi wa yambo o ba engumba.Ye nde mokonzi wa yambo azali na ekambeli ya botambwisi misala mpe bokonzi o engumba to o yoko commune.
Molongo mwa kama yoko tuku mwambe na misato mwa mobeko libungutulu kata nzete, libungutulu, libungutulu motoba esalemaki o mia libwa sanza ya misato o mobu koto ibale na motoba, etali mabogisi ya maponomi ma mokonzia wa kolo,ba ntoma ba bana ba ekolo, o bituka to o ekolo,kino o ba localité ya etando mobimba ya ekolo RDC,ezali kolimbola ete,bayangeliba bingumba mpe balandi ba ba bango bakobapona se o lokasa to liste yoko, na mbala yoko na ba conseillers urbains,o kati tolibanda ya conseil, bakobapona mpo ya mibu mitano mpe bakoki lisusu kobabakisela mibu mitano soki bayi ekolo basepeli na mosala mwa bango.
Liste ya ba kombo ya bayangeli ba engumba mpe eye ya balandi ba bango ekopesama na parti politique masanga mpo ya bato baye bazali bango meyi to ba indépendant moto mona ye meyi akopesa kombo na ye se ye moko na bureaux ya linaka Commission électorale indépendante.

” Mpo ya koponama bayangeli ba engumba to ba maires mpe balandi ba bango basengeli kosala nini ? ”

* Moyangeli wa engumba mpe molandi wa ye esengeli naino kozala mwana wa ekolo RDC to kozala na eye tobengi nationalité congolaise. Mpo ya koyangela esengeli kozala na mibu zomi na mwambe to koleka, kozala na makoki ma ki civil mpe maye ma politique.
Moto alingi kozala moyangeli wa engumba to maire to mpe molandi wa ye, asengeli, kozala moto moye asila kokomisa kombo kati ya baye bakopona to kosala yango tango azali kokende kopesa candidature na ye.Kolandana na molongo kama yoko tuku mwambe na motoba,ba candidat maire mpe balandi babango,basengeli komimonisa na bureau ya linaka Commission électorale indépendante ezali o esika bazali.
Na kopesa candidatures basengeli kotia mambi maye : mokanda mwa kondima manso mpe kotia mokoloto ya ye meyi candidat,yoko fiche ezali kotalisa nani o zali to fiche d’identité , bakisa curriculum vitae na suka nde akati seleka na nkoma eye : “Nakati selaka mpe na lokumu lwa ngai ete,manso maye makomami awa, mazali solo mpe sembo “.
Asengeli kobakisa ba photos passeport mineyi,elembo ya lisanga lia bango lia politique,tosengeli mpe koyebisa ete,mambi maye makoki kozanga te o kati ya dossier ya candidat, :rn- Photocopie ya carte d’électeur,rn- Yoko attestation de naissance to mokanda mozali kotalisa esika mpe mokolo obotama.
-yoko récépissé to mokanda mozali kotalisa ete,osilaki kofuta caution to misolo miye bakolozongisela te na sanduku ya mbula matadi ekoki , ba FC kama yoko na zomi .
-Mpe yoko mokanda mozali kotalisa ete parti politique to lisanga lia yo lia politique lipesaki ndingisa mpo balopona.

” Lolenge nini ekosalema maponomi ya bayangeli ba engumba mpe balandi ba babango, mpe biyano bikopesama lolenge nini ?

* Koponama ya moyangeli wa engumba mpe molandi waye ekosalemaka na bokutu.kati kati ya ba bayi conseil urbain baye bakozala wana.
Soki motango mwa bango mokoki te, conseil urbain, ekobiangisa bokutani bosusu sima ya mikolo mibale mpo bapona bo esengeli, ata soki motango mokoki te. Il Esengeli toyebisa ete, conseiller urbain moko moko asengeli kopona se na mongongo moko pamaba.
Kolandana na molongo kama yoko tuku mwambe na mwambe, motali maponomi ma moyangeli wa engumba mpe molandi waye,esengeli kosalema sima ya mikolo sambo soki basili kotia o esika Conseil urbain.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de :rnMicheline TshwalarnJournaliste Radio OkapirnTél: 00243998186793