" Misolo miye bawelani bimbonga bakofuta to caution eye C.E.I azali kosenga ekokende wapi ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Misolo miye bawelani bimbonga bakofuta to caution eye C.E.I azali kosenga ekokende wapi ? ”

* Mpo maponami mandimama, masengeli kozala polele, maleka na bonsomi, esengeli bawelani bazala bayike mpo ete baponi bayeba kopona malamu.Bosenga mpo ya kozala mowelani ebonga ekopesa nzela na ba candidats bapesa ba kombo mpe bazala bayike.
Toloba soki bosenga to eye babengi condition ezali pete,bawelani mpe bakopesa kombo bayike. Esengeli komituna, bawelani boni basengeli kokomisa kombo mpo ya maponomi ? Soki bawelani bazali moke, baponi mpe bakosuka na kopona na kopona amalamu. Kasi soki bawelani bazali bayike, baponi bakozala na kpokoso mpo ya koluka nani bakopona. Na République Démocratique ya Congo, Commission électorale indépendante esengaki elembo ya bofuti misolo to caution ezala mpo ya kotalisa ete mowelani ebonga ya bokonzi asili kofuta mpe atia yango o nteyi ya dossier ya ye o eteni inso ya maponomi. Misolo to Caution ena ezali lokola elembo ya makoki mpe bosenga bwa mowelani kotalisa ete andimi solo kopesa kombo o maponomi.
Kolandana na mobeko libungutulu motoba, kata ndjete libungutulu, libungutulu motoba, salemaki o mia sanza libwa sanza ya misato o mobu tozali etali maponomi ma mokonzi wa ekolo, ba ntoma ba bana ba ekolo, o ekolo mobimba, o bituka , bingumba kino o ba localité na République Démocratique ya Congo, mobimba ezali koloba ete, misolo miye mowelani ebonga ya bokonzi to caution bakoki koyizongisa te, nzambi ekoti o sanduku ya mbula matadi.

” Tokoki koyeba motango mwa misolo to caution eye, mowelani kiti ya bokonzi asengeli kopesa mpo ya eteni yoko ya maponomi o République Démocratique ya Congo ? ”

* Mobeko mwa maponomi mozali polele mpo na ntina ena, motango mwa misoloto caution mokeseni kolandana na eteni ya ebonga ya maponomi .
Ndakisa bawelani ngwende ya bokonzi bwa ekolo basengli kofuta million koto tuku mibale na mibale ya ba FC 22 millions de Francs congolais , ba candidats députés nationaux mpe ba sénateurs basengeli kofuta koto kama yoko na zomi ya ba Fc to 110 milles Francs congolais , ba députés provinciaux bakofuta koto tuku mitano na mitano to 55 milles Francs congolais , ba candidats gouverneurs mpe balandi ba bango, bakofuta koto kama motoba na tuku motoba ya ba Fc to 660 milles Francs congolais , Moyangeli wa engumba mpe molandi waye,basengeli kofuta misolo mikoki na ba Fc koto kama yoko na zomi to 110 milles Francs congolais , bayangeli ya ba commune to bourgmestres bakofuta koto tuku mwambe na mwambe ya ba Fc to 88 milles Francs congolais , ba conseillers urbains bakofuta koto tuku mibale na mitano ya ba Fc to 25 milles Francs congolais .
O ngambo ya bango ba, ba conseillers municipaux elongo na ba chefs ya ba secteur mpe balandi ya bango basengeli kofuta misolo mikoki na koto tuku mibale na mibale ya ba Fc to 22 milles Francs congolais. Ba conseillers ya ba secteurs nde bafuti koto zomi ya ba Fc to 10 milles Francs congolais.

” Mpo tosukisa yebisa biso misolo miye bawelani bibonga bia bokonzi bazali kofuta bakosala na yango nini ? ”

Kolandana na mokambi wa Commission électorale indépendante, l’abbé APPOLINAIRE MALU MALU, misolo mina bakopesa yango na ministère ya finances. Ministre atali mambi ma budget kolandana na mosala mwa ye, nde akoyeba nini ya kosala na misolo mina kolandana na bosenga bozuami o misala mi ambula matadi.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnExt. : 6961rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de :rn Micheline-TshwalarnJournaliste équipe électorale rnRadio Okapi/KinshasarnTel: 00243998186793rnExt.:6961