" Nini babengi campagne électorale officielle mpe campagne électorale na bolayi bwa yango ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Nini babengi campagne électorale officielle mpe campagne électorale na bolayi bwa yango ? ”

*Yambo na pesa eyano na motuna moye, tika naloba ete, Maponomi ezali eleko eye bayi ekolo bazali kosala mpo ya kopona bayangeli ba bango o biteni binso bia misala mia politique, nkita mpe lobiko lwa bato.kupona ezali nzela eye, bayi ekolo songolo to bayi likita bakotalisa makanisi ma bango na kozuaka mokano o nzela ya maponomi.Kopona ezali mpe eleko ya kotuna motuna epayi ya bayi ekolo banso lokola na RDcongo mpo ete bayi ekolo bapona bakonzi ba bango mpe mibeko mikokamba, ndakisa na Rep ya isato. Kopona ekosalemaka na moto ye meyi, bakoki kotinda moto mosusu te,, bakoki mpe kotinda yango o kati ya mokanda te.
Mpo ya koyanola na motuna mwa yo, campagne électorale ezali eleko ya kobeta tangwa yambo ya maponomi. Ezali eleko eye,bayi masanga ma politique mpe ba candidat bazali kobeta tangwa. Elingi koloba bazali komitalisa mpo ete bato bapona bango mpe bazua mingongo miyike. Kasi esengli mpe toyebisa ete,bokeseni bozali kati ya rncampagne électorale officielle mpe campagne électorale na bolayi bwa yango.
Eye babengi campagne électorale officielle ezali eleko eye ba candidat bazali koleka o ba ndako ya bopanza sango, lokola ba radios, télévision mpe eye ya ba nkoma to ba presse ecrite,mpo ya maponomi,ekosenge ete bawelani ebonga banso bazala na tango lolengo moko ya kobeta tangwa ya bango bo ezali kosenga mobeko mwa maponomi .Na République Démocratique ya Congo, linaka Haute autorité des médias nde lizali na meko ya kolandela manso mana mpe kotala soki mibeko mia maponomi mizali kotosama.
Campagne électorale officielle,kolandana na molongo tuku mibale na mwambe ya mobeko libungutulu motoba, kata ndjete libungutulu, libungutulu motoba esalemaki o mia libwa sanza ya misato mobu tozali, motali mambi ma maponomi ma mokonzi wa ekolo, ba ntoma ba bana ba ekolo,o bituka bingumba kino o ba localité o etando mobimba ya République Démocratique ya Congo etali maponomi ezali koloba ete,eleko ya kobeta ntangwa ekobanda mikolo tuku misato yanbo ya maponomi mpe ekosila mokolo moko yambo ya kobanda maponiomi. Elingi koloba ete, campagne électorale ekobanda o mia sanza tuku mibale na libwa ya sanza ya motoba mobu tozali to 29 juin mpe ekosila o mia sanza tuku mibale na libwa to 29 juillet 2006.
Campagne électorale na bolayi bwa yango elingi koloba : éleko bayi masanga ma politique,mpe ba candidats bazali kotalisa makanisi mpe manaka ma bango. Eleko ena bayilandelaka te na mobeko mwa maponomi. Kasi mabongiseli manso mazuami o nteyi ya mobeko mwa bitumbu mpe mobeko likonzi mokokamba ekolo, mokotelemela maloba mpe misala minso mia kofinga, koyina, kotinda na bitumba, kokosela makambo,bitumba mobeko mosengeli kotosama. rnBayi masanga ma politique mpe ba candidats to bawelani bibonga basengeli kotosa mobeko batiaki maboko na ntina ya maponomi.

” Tokoki koyeba nani apesameli ndingisa ya kobeta tangwa mpe esengeli kosalema lolenge nini? ”

* Mobeko mwa maponomi mopesa ndingisa na bayi masanga ma politique mpe bawelani bibonga to ba candidat mpo ya kobeta tangwa kolandana na eleko epesameli bango. Molongo mwa tuku mibale na libwa, mwa mobeko motali maponomi mozali kolimbola ete, bosangani na ntina ya maponomi esengeli kosalema kolandana mobeko motali bosangani bwa bato bayike na polele. Kobeta tangwa to kosala campagne electorale officielles esengeli kosalema na bonsomi o etando mobimba ya ekolo, soki baye bakobongisa bokutani meyi bakomeli bayangeli ba esika mokolo moko yambo ya bokutani mpe moyangeli andima.
Baye bakosalisa bosangani bwa kobeta tangwa na ntina ya maponomi basengeli kosala manso mpo ete manso maleka malamu, na kotosaka mibeko mpe mobulu mozala te.
Na eleko wana, kotia ba photo, mpe bilembo bisusu na ntina ya maponomi epesami ndingisa kolandana na bosenga bwa Commission Electorale Indépendante. Kasi bakondima te kotia ba nkoma to bilembo bisusu o ba edifices publics wana epekisami.

rnSAMUEL KATSHAKrnOndes Courtes rnTél. : 0024399890978rnExt. : 6961rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de :rnMicheline TshwalarnJournaliste Equipe électoralernRadio OkapirnTel : 00243998186793rnExt. :6961