"Mbula matadi ya République Démocratique ya Congo, ekozala na ba nani mpe yebisa biso baye bakozala o nteyi bakohuta wapi ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Mbula matadi ya République Démocratique ya Congo, ekozala na ba nani mpe yebisa biso baye bakozala o nteyi bakohuta wapi ? ”

* Mbula matadi ezali yoko ya etambuseli misala mia ekolo.kolandana na maye makomami o buku mwa mokeko likonzi ekokamba ekolo République Démocratique du Congo,mbula matadi eye ekosalema ekozala na premier ministre,ba ministres, mpe balandi ba bango , o ngambo mosusu bokoki kokuta molandi wa premier ministres, ba ministres d`Etat mpe bamosi . Mbula matadi ena ekotambusama na premier ministre, akohuta kati na lisanga lia ba ntoma baye bakozala bayike koleka basusu. Bosali mbula matadi ena esengeli kosangisa bayi ekolo banso.
Yambo abanda mosala premier ministre akolakisa ba ntoma ba bana ba ekolo o assemblée nationale manaka ma mbula matadi. Soki ba ntoma bandimi wana nde, bafandisi mbula matadi .

” Sika yebisa biso mosala mwa mbula matadi mokozala nini ? ”

* Mbula matadi ena ekozala na mokumba o boso bwa assemblée nationale. Mbula matadi meyi elongo na mokonzi wa ekolo nde bakolakisa politique ya ekolo mpe bakomema mokumba mwa yango.
Mbula matadi ena nde ekotambusa politique ya ekolo. Maye matali bokengi, boyokani na bikolo bia bapaya, yango ezali misala miye mikotambwasama na boyokani kati ya mbula matadi na mokonzi wa ekolo.Mbula matadi nde akolandela misala minso mia l’Etat, mia mapinga , polices Nationale mpe misala mia bokengi.

” Bongo mosala mwa kinama moko moko o nteyi ya mbula matadi meyi ezali nini ? ”

* Tobanda na premier ministre.Ye nde mokonzi wa mbula matadi . Kokolandela botosi bwa mibeko na bokengi bwa mokonzi wa ekolo kolandana na makoki mazali komopesa mobeko likonzi. Premier ministre akosala mosala kolandana na mwango na kobiangisaka bosangani bwa ba ministre to eye babengi conseil des ministres, na misala mia mapinga, mia ba civils mpe na misusu miye milengelami na mokonzi wa ekolo.
Misala mia premier ministre mikodimama na ba ministre baye bakotia yango o misala.
Na oyo etali ba ministre esengeli koyeba ete,bazali na mokumba mwa misala miye bazali kokamba. Bakotia o bikela manaka ma mbula matadi o nteyi ya ministères eye bazali kokamba, na bokambemi bwa premier ministre. Soki premier ministre akosalisa mosala na nzela ya mwango,ba ministres bakosala mwa bango mosala na mokano.
O ngambo ya bango balandi ya ba ministre bakosala mosala na boyangeli bwa ba ministre bazali o boso bwa bango. Molandi akokitana na esika ya mokonzi soki azali na ngonga te to mpe soki azali te.

” Mpo na kosukisa nini eye kinama ya mbula matadi asengeli te kosala o eleko eye azali o mosala ? ”

*O eleko inso ya mosala, binama bia mbula matadi bakoki soki moke te, kozala ye meyi to o nzela ya moto mosusu,kosomba, kozua , kodefa eloko eye ezali ya mbula matadi, ezala na etuka to engumba. Akoki kozala te, o kati to esika eye bazali koteka na polele to kosala eye babengi marchés publicsAkosomba te mpo na bano ya mbula matadi ezala na engumba monene to na bituka. Tika toyebisa ete, yambo babanda mosala mpe tango bakosukisa mosala binama bia mbula matadi basengeli kokende kotika mokanda o esabiselo enene ya ekolo to cour constitutionnelle, mokanda moye mozali kotalisa biloko binso to mpe bozui bazali na yango. Kuna bakotanga nionso ezala biloko, ba ndako, mabele, zamba ,mabulu ya mabanga ma talo bilanga. Biloko bia libota ezala mpe eye ya molongani, kolandana na lolenge ya régime matrimonial,bana mpe baye bazali kosungama na libota basengeli kobatangma.
Esambiselo enene nde ekoyebisa manso mana na misala mia mbula matdi mitali mambi ma mpako to na l’administration fiscale. Soki kinama moko ya mbula matadi asali yango te sima ya mikolo zomi na misato, bakomozua ye bo moto alongwe mosala to a démissionné.
rnTexte de SAMUEL KATSHAK rnOndes Courtes rnTél. : 00243998909787 rnExt.:6961 Traduction de Micheline Tshwala rnJournaliste de Radio électoralrnKinshasarnTel: 00243998186793rn 00243810293252rn Ext.: 6961