1. Bokono bwa Kintutu( Rougeole) ekoti o etuka Nordi Kivu mpe Sudi Kivu. O Bituka bina bibale, bato koleka nkoto ntukui mitano nkama mwambe bazwi bokono bwango kobanda sanza moko kino mia zomi na libwa ya sanza ya sambo ya mobu moye.
2. Bana bakima bitumba bazali na elikya mpenza te soki bakotanga kelasi na mbula eye O Beni. Baboti na bango bazali komilela mpo na bozangi mbongo ya kofuta kelasi mpe ya kosombela bana biloko bwa kelasi.
3. O Etuka Lomami, Bac Epamba esekwi. Yango esilisi mpasi ya bato bazalaki kosalela bwato mpo na kokatisa mayi ya Lomami na bobangi makama.
/sites/default/files/2026-08/18082026-p-l-_journal_lingala_de_ce_mardi_soir_18_aout_2026_-_web.mp3







