journal lingala

Poso moko yangoyo wuta Rdc na ba M23 batiaki mikoloto na yoko mokanda ya boyokani na Qatar po kimia ezonga na monyele mua ekolo. Kasi ata bongo kuna na Nord pe sud kivu bitumba yango bikati te pe bikokoba kaka.

Etuka Kasai oriental elingi lisusu komona ba nkumu ya ba mboka koyengayenga na Mbuji Mayi te. Ministre ya mambi ma nteyi na etuka nde apesi mitindo miye. Pe alaki kolandela miango te nasuka.

Ba mama ya Pangi na etuka Maniema bakomi lela lela makasi penza. Pamba te pona bango bakeleli nioso. Mayi ya petwa, lolenge ya komisalisa soko babeli, bisika bango koteka biloko na bango ya bilanga to pe bisika ya konika fufu to masango.

 

/sites/default/files/2025-10/22102025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3