Na tshopo likita ndako ya ba ntoma ya etuka ekanaki kosala lelo pona kotala soko bakolongola na kiti naye ya mosala to te moyangeli Tshopo. Likita liango lisalamaki lisusu te. Po lolenge ya kokota na ndako ya mosala ya ban toma pona likita liango lizalaki te. Ba pulusu bakangaki yango.
Mampinga ma ekolo masepeli mingi ndenge boko bakeli ya lingomba ya Thomas Lubanga basundoli lingomba liye. Bazali bongo bato batano mobimba nde batiki lingomba lia basimba mandoki liango.
Kaka na kati ya kosanjola mokano ya Onu to resolution 1325 moko lingomba ya Kasai etalisi te bakoki ya ba mama ya kuna nano matosami manso te. Neti ba mama bakoma ebele na bibonga ya bokonzi. Nioso wana po ba mama batanga nano pe bakomi mingi te. Pe ebele bayebi nano bikela babengi Genre te.
./sites/default/files/2025-10/22102025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3








