journal lingala

Francs congolais esengeli te ekoma na nguya moke na libenga to na wenze. Yango nde mama ya likambo ezalaki na likita tata mokonzi wa ekolo asalaki lobi na boko ministre ya Mbulamatari na biso. Makita masusu masengeli kosalama pona kobatela bobikiliki francs congolais ekomi nango mikoloyo pe kolandela batalo ya biloko bikita na ba wenze.

Na etuka Sud Kivu. Compani Twangiza eye esalaka wolo na Mwenga babetaki yango bombi. Kasi nani nde asali yango ? eyano eyebani te kasi bamonaki kaka ba pepo ya mike bizanga mokumbi biye mampinga basalelaka yango pona kobeta pe masasi na bisika. Biango nde bibetaki masasi na kompani ya wolo eye pe epanzaki ndakisa ba nzunga wpi epayi kompani Twangiza ebombaka pitolo na yango.

 

Na Haut Katanga, Haut Lomami pe Kwilu bayi kongo bakosenga lisalisi. Mingi kati na bango bakutani na makama ya ba Mvula pe kozanga bokengi.

/sites/default/files/2025-10/23102025-l-journallingalasoirweb-00.mp3