Boyokani ya Washington kati Rdc na Rwanda bokufi te. Bozali nango nano kaka. Ministre molobeli mbulamatari ya Rdc nde alobi yango lelo. Pe Patrick Muyaya abakisi te ata ko ekotiama malembe malembe na misala kasi bozali nango kaka. Abakisi pe lisusu te tata mokonzi wa ekolo akolandela yango makasi po kimia ya solo ezonga libela na monyele mua ekolo.
Bongo na kotala maye makoleka na bituka ya Rdc mikoloyo. Ekomonana neti ba ntoma ya bituka bazali mbele na kanda Makasi mikoloyo. Pamba te balongoli na boko bituka bayangeli bituka na bibonga na bango ya mosala. Pe soko tokebi bayangeli ya Kasai oriental pe Sud Ubangi bakolongwa na bibonga na bango ya mosala. Po ba ntoma ya kuna basi basengi bango balongwa.
Soki tobwaki miso ngambo ya Lualaba. Kuna makelele eyokani te bato bakoyiba makele kuna. Na yango ministre atali mambi ma bosembo angwenyi te pe asengi ndako esambisaka ba soda na pe eyo esambisaka basali ya leta balandela likambo yango pe bitumbu bipesamela oyo nioso akutani na moyibi yango.
/sites/default/files/2025-10/291025-p-l-journallingalasoiwebr-00.mp3








