journal lingala

Yoko likita libandi lelo na Paris na ekolo France pona kosengela Rdc mbongo asalisa bayi Kongo banso bazali na pasi pe bakeleli makasi na monyele mua ekolo. Likita liango libongisami na ekolo France pe na ekolo togo pe esangisi bayi politiki pe lisungi ya ndenge na ndenge ya molongo.

Bongo na kotala maye makoleka na bituka ya Rdc mikoloyo. Ekomonana neti ba ntoma ya bituka bazali mbele na kanda Makasi mikoloyo. Pamba te balongoli na boko bituka bayangeli bituka na bibonga na bango ya mosala. Pe soko tokebi bayangeli ya Kasai oriental pe Sud Ubangi bakolongwa na bibonga na bango ya mosala. Po ba ntoma ya kuna basi basengi bango balongwa.

Soki tobwaki miso ngambo ya Lualaba. Kuna makelele eyokani te bato bakoyiba makele kuna. Na yango ministre atali mambi ma bosembo angwenyi te pe asengi ndako esambisaka ba soda na pe eyo esambisaka basali ya leta balandela likambo yango pe bitumbu bipesamela oyo nioso akutani na moyibi yango.

/sites/default/files/2025-10/301025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3