journal lingala

Likita monene ya molongo esalamaki poso eleki na Paris pona kopesa Rdc mbongo ya kosalisa bayi Kongo bakokelela makasi na monyele mua ekolo. Likita liango lipesi yoko mbano mosusu lisusu. Lingomba Union européenne etindi pona bakeleli baye ya Kongo milioni libwa ya misolo ya Euros pona kosunga.

Ba papas na mokili batungisamaka na ba bokono mua nzike. Kati na ba bokono yango bokono na kombo Prostate to pe bokono etungisaka nzoto ya mobali ya ba papas ezali. Yango molongo epona sanza ya zomi na moko pona kobenda ba papas matoyi te babosanaka te kokendaka na lopitalo tango inso pona kotala soko bazali na prostate yango too te.

Moyangeli lingomba ya ba nkumu ya Kongo central asengi na bayi Igf baye bazali kuna na mosala ya kolandela misolo mia leta bafongola miso malamu na lolenge Kongo central ekokambama. Ye Joseph Mabanga alobi te pona ye Kongo central ekokambama malamu te. Bayangeli bakosala makambo ebele na Nkunku ndakisa lolenge bakokongolo na molili misolo na ba nzela ya leta na etuka too peyages routiers.

 

/sites/default/files/2025-11/04112025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3