Tata mokonzi wa ekolo azwaki maloba lelo na likita linene Onu abongisi na Ekolo Qatar pona kolobela lolenge bikolo bia molongo bikoki kobonga pe kokenda liboso to sommet sur le développement. Na maloba naye Felix Tshisekedi asanjoli bayi Rdc po ata ko ba dogolo miso bakokoba komema mobulu pe bitumba na Ekolo mvula na mvula moyi Kongo akangi maboko te pe akosala nioso esengeli po ekolo naye ekenda liboso.
Ba mvula makasi bikobeta mikoloyo na Rdc. Na Mwenga na sud kivu bibomi pe bibuki ba ndako. Na Kisasa boko ba communes ndakisa Lingwala pe Kalamu bididaki na mayi ya mvula.
Na oyo etali bokolongono bwa nzoto. Zone ya sante ya Kibua na Walikale eleli lisalisi. Kasi na Kasai minganga ya lomami, Sankuru ya Kasai central nakotaki na Mbuji mayi kelasi ya koyekola lisusu lolenge malamu ya kobotisaka mama ya zemi na lipaso
/sites/default/files/2025-11/04112025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3







