Ba bokono neti pulupulu ya makila, kituntu to pe Mpox bikotungisa makasi na boko bituka ya Rdc mikoloyo. Ndakisa na Sud kivu pe Kasai oriental. Kasi ata bongo Rdc ekani pe kokoba lisusu kobundisa bukabuka na pe kituntu na ekolo na suka ya sanza tozali nakopesaka lisusu bana mangwela pona ba bokono yango.
Lingomba Union européenne esengi bato, mamgomba pe makonzi banso bazali na eloko ya koloba na bitumba bizali na monyele mua ekolo bandima te yoko esika ebanda kozala wapi epayi lisungi likobanda kokomela bato. Bandima pe lisusu te ba pepo bizongela komemelaka bato lisungi.
Na sud Kivu. Ba M23 bakangi libela esika bato basalaka mosala ya makele na Kabare na kombo Lomera. Kokanga yango esalamaki lobi. Awa boye moto moko na moko azalaka kosala mosala ya makele kuna akolongola bisalelo naye na Lomera. Ata ba oyo bazali na bisalelo ya kilo basengeli bango pe kolongola oyo ya bango bisalelo kuna.
/sites/default/files/2025-11/05112025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3








