Ministre ya mambi ma nteyi ya Rdc asololaki lobi na bayangeli bituka na pe bayangeli ba ndako ya ba ntoma na bituka. Pe Ye jacquemin Shabani apesi moto na moto yaye mitondi. Na ba bayangeli bituka to ba gouverneurs ministre ayebisi bango bakamba bituka na bosembo bonso. Bongo bayangeli ndako ya ban toma na bituka ayebisi bango bazwa meko ya kotika nano makambo ya kolongolaka papamba ba gouverneurs to ya bango moko bayangeli na bibonga na bango ya mosola na eloko eye Kongo ezali nano na bitumba.
Ba bokono neti pulupulu ya makila, kituntu to pe Mpox bikotungisa makasi na boko bituka ya Rdc mikoloyo. Ndakisa na Sud kivu pe Kasai oriental. Kasi ata bongo Rdc ekani pe kokoba lisusu kobundisa bukabuka na pe kituntu na ekolo na suka ya sanza tozali nakopesaka lisusu bana mangwela pona ba bokono yango.
Na sud Kivu. Ba M23 bakangi libela esika bato basalaka mosala ya makele na Kabare na kombo Lomera. Awa boye moto moko na moko azalaka kosala mosala ya makele kuna akolongola bisalelo naye na Lomera. Ata ba oyo bazali na bisalelo ya kilo basengeli bango pe kolongola oyo ya bango bisalelo kuna.
/sites/default/files/2025-11/06112025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3








