Journal lingala

Sango ya lingala ya lelo 20/02/2026

  • O Kinshasa, bato bazali lisusu na kimya te soki mbula enuki,…lelo uta ntongo ntongo mpenza mbula ebetaki mingi o engumba. Communes nzike ezindi na mayi, ndako ebukani. Yango ekolisi lisusu mabulu o Mont-Gafula, Lemba, Selembao…bakonzi bazali koluka eloko nini basengeli kosala mpo na kosunga bato biloko bya bango bibebi na mayi ya mbula.
  • O Shabunda, mingi mingi o Chefferie ya Baliga, lobiko loa bato lokomi na mpasi  ya kosakana te. Butu moyi, ntalo ya biloko izali komata, mpamba te biloko bizomonana te. Biloko biye bizalaki kowuta Bukavu mpe Kindu, izokoma lisusu te na Shabunda centre. Kpokoso iye iwuti na bozangi bokengi mpe bonyokoli bato na bokangisaka  ntango inso nzela na bofutisaka bato mbongo ya barriere o nzela RN 2 Bukavu-Shabunda, mpe bakisa lolenge nzela  ebebi Makasi nkati ya Kindu na Shabunda.
  • Sango etali bozangi kimya o monyele mwa ekolo….boyeba te atako mbulamatari na AFC-M23 batiaki mokoloto mpo na boyokani ya koboma moto ya mandoki uta mia zomi na mwambe ya sanza eye, bitumba bizali nkaka kokoba o nordi mpe sudi ya Kivu o nkati ya basoda ya  FARDC ma bato ya AFC-M23. Bopekisi bitumba bina esakolamaki uta mia zomi na moko na ekolo Angola, o ntango ya yoko bokutani o Luanda, bokutani boye esangisaki tata mokonzi ya ekolo angola João Lourenço, Faure Gnassingbé ya Togo, Félix Tshisekedi mpe mokonzi ya nkala ya nigeria Olusegun Obasanjo.
  • Sango na bokuse, Police ya MONUSCO epesi   bisaleli ya misala mitali informatique na commissariat provincial ya police national Congolaise ya Nordi ya Kivu, eye bilo ya yango ezali kosala o Beni, wuta AFC-M23 ezwa Goma, eleki sika mbula moko. Bisaleli bina bipesamaki uta lobi  o ntango ya milulu misalemaki o boso ya mokonzi ya police na MONUSCO.
  • O Ituri, bakangi boko basoda ya FARDC, baye bakendaki kopunza biloko ya paroisse saint Joseph Travailleur ya Bule, o etando Djugu. Bakonzi ya diocese catholico ya Bunia bafundaki likambo lyango epayi ya bakonzi Ya etuka.
  • Sango ewuti na CEI. Commission elecytorale INdependante epesi uta lobi Office national ya identification ya population ONIP , buku ya maponami to bengi na lopoto, fichier electoral. Vice-premier ministre atali mambi ma bokengi o etando ya ekolo moto akambaki milulu myango. Mpo na Jacquemin Shabani, fichier elecotoral bapesi yango ONIP mpo esala mosala ya koyeba motango mobimba ya bai ekolo Congo démocratique.
  • Mutuelle ya sante ya balakisi ekomi kosala o etuka Maniema uta lobi mokolo mwa mosala minei. Mokambi wa etuka moto akambaki milulu mya bobandisi misala ya muteuelle ena eye ekosunga mpo na bokolongonu bwa nzoto ya balakisi na mabota ma bango . Mokonzi wa etuka abanzi te, molakisi asengeli kopesa mateya ma malamu, bobele soki azali mpe na nzoto kolongonu.
  • O Nordi ya Kivu, ONG Voice Of Kivu Women esukisaki uta lobi mateya mpo na basi koleka ntuka mibale, baye bandimi kozala motumolo. Bango bazwaki mateya mana mpo na koyeba kobunda mpo na kimia mpe komisala o etuka eye ebebi na bitumba. Mateya mana mabongisami elongo na Section ya MONUSCO eye etali makambo ya genre./sites/default/files/2026-02/20022026-p-l-journallingalasoir_vendredi_-00-_web.mp3