- O etando Masisi bitumba bingala makasi zinga zinga ya Rubaya, Lisanga lya ba wazalendo elongo na ba FARDC bazali kobunda makasi na ba AFC-M23. Batomboki ba sutukaki na bombadement ya pepo tobengi Drone na butu ya kotana ntongo ya mokolo mwa mosala mibale moye.
- O Kisangani ntalo ya biloko emati makasi. Kpokoso ya lotiliki na likambo lya bokeleli biloko sima ya feti ya bonane nde ematisi ntalo ya biloko bina.
- /sites/default/files/2026-02/24022026-p-l-journal_lingala_de_ce_soir_mardi-00-_web.mp3Sango ya esengo o Kasai-central, kuna service technique ya ministère ya infrastructure mpe travaux public o etuka ewuti kozwa mituka. Ezali likabo ya banque africaine ya développement BAD. Yango ekosunga kobongisa misala o etuka.
- Willy Ngoma oyo azali molobeli ya batomboki ya AFC-M23 akufi. Azali lisusu na bomoi te bo elobi ndako nzike ya bampanzi sango o ekolo mpe o molongo. Willy Ngoma akufaki na nse ya bombadement ya mapinga ma ekolo o Rubaya, etando ya masisi o Nordi ya Kivu.




