Sango ya lelo 02 mars 2026 :
- Mboka Mikenge, eye ezali na Haut plaetau pemebeni ya Minembwe o etando Fizi, Sudi Kivu, ekwei o maboko ya mapinga ma ekolo Congo Democratique. Nyonso ewuti na bitumba makasi bizali kokongala mikolo miye nkati ya bato ya AFC- M23 na basoda ya FARDC, elongo na ba Wazalendo o Mboka Nyawa. Molobeli ya mapinga o ntei ya mabongisi ya sukola 2 nde apesi sango eye.
- Mosala ya Gaz Methena esengeli kobanda o etima Kivu…Nkasi bai etima ena babanzi te, ebongi malamu naino kobanda liboso koyekola ndenge ya kosala mosala mwango mpo te yango ebebisa te, zinga zinga epayi wapi bana mboka bafandi.
- Lotiliki o mboka mokonzi ya etuka Lomama, Cabinda ebongi malamu sika. Mabota maike, service ya leta, ba radio communautaire basepeli zambi bakobanda kosalela lotiliki mpo na misala mya bango na kimya nyonso.
- B/sites/default/files/2026-03/02032026-p-f-journal_lingala_de_ce_lundi_-00-_web.mp3olayi bwa sango ....






