Journal Lingala

Sango ya biso ya lelo : vendredi 13 matrs 2026

 

  • Esengeli kozongisa o ekolo Congo Democratyique  bana mboka nkoto ntuku sambo na mibale bakima  mpe babatama o Zambie. Likita lya mikolo misato lisalemaki  nkati ya RDC, Zambi na HCR mpo na komanyola ndenge ya kosunga bana mboka bana bazonga o ekolo na bango.

/sites/default/files/2026-03/130326-p-l-journallingalasoir-00-ok-web.mp3

  • O Kananga police ekangi moto moko moyibi ya bana bake. Lisanga LIZADHEL likebisi baboti mpo bayeba kokembisa bokengi bwa bana na ntina te bayibama te.  

 

  • O Nordi meko ekasi ya mokambi wa etukla epekisi botamboli bya mituka minso ya containers to ya CHASSIS  iye isalema na maboko o etuka. Lisanga lya ba sofele na baimimbonfgo FEC, banso basepeli na meko ena mpo esunga kobatela nzela iye bazali kotonga ya sika o etuka. .