journal lingala

Parc National ya Virunga ezali na esengo mobu oyo pamba te ba Nkoyi ya Ishasha na Nord Kivu baboti bana motoba mobu oyo. Esengo monene pona Kongo mobimba pamba te bitumba, koboma bango pamba pamba ekitisaki makasi motango yaba Nkoyi na Parc eye.

Likambo ya kokamua ba ndeko. Na Lubumbashi mikolo mileki nzoka nde bato batekaka biloko ndenge na ndenge ya kotanda na mabele to yakomema na moto babombaka nde biloko yango ya kobatama na bisika bisengeli te lokola na ba wc to ba zongo. Kati biloko yango kutu mbisi pe ezali. Moyangeli engumba Lubumbashi ayokaki sango eye pe akendaki ye moko komona bikamwisi yango. Bongo kaka wana abotoli biloko yango pe apanzi bisika biye.

Na Ituri bilo ya leta elandelaka kobika ya bayi kuna to protection civile esepeli te ndenge moko ya basali makele na esika Rwenzori na Mahagi akufi lisusu na esika yango. Ba Sali makele bayike ya kuna bakufi pe mingi na esika wana. Nde bilo ya protection civile na etuka ebeleli leta esala eloko.

 

/sites/default/files/2025-10/20102025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3