Na Kasai central ba bebeli ya kala ya ebola ya mboka Bulape ata ko basi babiki na bango na bokono yango bazali na kokoso ya kozonga kobika na ya bango bisika bazalaki kobika liboso ya kobela. Pamba te mabota na bango na pe kaka bayi Bulape bakobanga bango pe bakomona bango neti kaka bazali kaka na ebola kaka.
Franc congolais na biso ezwi nguya mikoloyo pembeni ya dolae ya america. Na bituka biyike ya ekolo biloko bikiti talo. Kasi na beni Butembo pe Lubero biloko bikiti talo te pe magomba ya makoki mabato ya kuna batomboli mongongo te leta asala eloko.
ngambo esusu Na Kongo central. Nguya oyo franc congolais ezwi mikoloyo pembeni ya Dollar ya America esali te ndakisa bisalelo ya kotonga ba ndako bikiti talo. Neti ciment ekomi 20000 francs congolais tango ezalaka 24500 francs. Bibende pe lokola bikiti talo.
/sites/default/files/2025-10/21102025-p-l-journllingalamatinweb-00.mp3







