journal lingala

Na Kasai central ba bebeli ya kala ya ebola ya mboka Bulape ata ko basi babiki na bango na bokono yango bazali na kokoso ya kozonga kobika na ya bango bisika bazalaki kobika liboso ya kobela. Pamba te mabota na bango na pe kaka bayi Bulape bakobanga bango pe bakomona bango neti kaka bazali kaka na ebola kaka.

Na Nord Kivu. Ba M23 na ba Wazalendo ba ndongwani lisusu lelo. Ezali bongo na ba mboka Nyabiondo pe Kaanja na Masisi centre pe Walikale. Bitumba yango bizali na bibundeli ya minene pe biye ya mike. Bato bayike pe bakufi na bitumba yango.

Yoko sango ya esengo Na Kongo central. Nguya oyo franc congolais ezwi mikoloyo pembeni ya Dollar ya America esali te ndakisa bisalelo ya kotonga ba ndako bikiti talo. Neti ciment ekomi 20000 francs congolais tango ezalaka 24500 francs. Bibende pe lokola bikiti talo.

 

/sites/default/files/2025-10/20102025-p-l-journallingalasoiwebr-00.mp3