Mbulamatari ya Rdc ezali lisusu ya mobimba te. Yoko ministre naye alongwe lobi na ebonga na ye ya mosala. Ezali bongo Aime Boji oyo azalaki ministre ya industrie. Pe azongi naye na ebonga naye ya ki Ntoma ya ekolo na ndako ya ba ntoma ya Rdc. Pona bayi politiki Aime Boji asali bongo po akolula ebonga ezalaki ya Vital Kamerehe lokola moyangeli Ndako ya ba ntoma ya Ekolo na biso Kongo.
Na Nord Kivu. Mua kimia moke momonani na Nyabiondo lelo kasi na Bashali Mokoto mingi penza na ba mboka Kinyana na Bibwe bato balamuki nde na boko bitumba bikasi penza kuna kati ba M23 na ba Wazalendo.
Sango ya malamu pona bayi Beni. Kala mingi te nde babandi kosalela bayi kuna mokanda ya kokenda mobembo to passeport. Bayangeli mosala yango ba lobi te mosala moye mokozua sanza moko pona koyambaka baye basengeli na mokanda yango. Bongo poso misato sima na bato kosenga passeports yango na leta nde bazwi yango.
/sites/default/files/2025-10/21102025-p-l-journallingalasoiwebr-00.mp3







