Journal lingala de ce lundi 17 aout 2026

1. Dialogue national Inclusif, masolo nkati na bana Congo democratik, ekosalema ndenge nini ?  Tata Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi alobi na mikolo mikoya, akosala lisukulu mpo na kopesa makanisi ma ye  ndenge dialogue national inclusif ekosalema.

2. O Bunia, bai societe civile bazokebisa bakonzi ya biteyelo mpo na kozwa meko ya kobatela bana na bokono Ebola, o ntango bakozonga kelasi. Direction provinciale ya education endimi te esili kopesa bakonzi ya biteyelo meko inso mpo na kobatela bana kelasi.

3. O Kananga, bilenge bazali ba entrepreneur bakolela mpo na bozangi mosolo ya kotia o mosala ba projet na bango. Boko balembi, bakei libanda lya eengumba mpo na kobeta libanga. Nkasi basusu batikali o engumba mpo na kobunda na motoki na bango moko./sites/default/files/2026-08/18082026-pl-_journal_lingala_de_ce_mardi_matin-web_0.mp3