1/Kinshasa : Mbulamatari etelemeli bobe inso izali kosalema o bitando bizali kokonzama na AFC-M23. Na bolandi liyebisi o nzela ya molobeli ya mbulamatari, AFC-M23 ebomisi bato koleka NKama misato.
2/Kinshasa : Pape wa Roma Leon 14 asengi na bai molongo kobunda makasi mpo na kosilisa bokono Ebola o monyele mwa ekolo Congo Democratique. Mpambe te, Papa amoni te, bokono Ebola ezali nse ko ngala.
3/Kwango : Etikali moke, bana bazongela nzela ya kelasi. Nkasi Lisanga RODDDI-RDC ezali kobyanga bato kosunga bana bakimi bitumba o bituka biyike ya ekolo, na ntina te bakoka kozonga kelasi na ndenge ya malamu. Soki bongo te, bana bana bakotanga te mbula eye.
/sites/default/files/2026-08/24082026-p-l-journal_lingala_de_ce_lundi_soir_24_aout_2026-_web.mp3







