1/Beni : O Beni Biteyelo bizali komibongama mpo na bozongi bwa kelasi eye etikali nse mikolo mya kotanga. Nkasi mabongisi mazali kozwama o biteyelo bina mpo na koyeba ndenge nini basengeli kobatela bana kelasi na bokono Ebola.
2/Kwilu : Baimimbongo basepeli ndenge mbulamatari ya ekolo ezwi meko ya kolongola o nzela RN 1 barriere inso. Nkasi emonani te bakonzi ya bituka Kwilu, Kwango, Mai-Ndombe bazokoka te kosilisa mindondo o nzela ena, bo elobi Fédération des entreprises du Congo FEC/Grand Bandundu.
3/ Kindu : O Maniema ONG Tearfund, elongo na Bureau diocesain de développement ya Eyamba Anglicane, esungi bana basi koleka nkama motoba na bisaleli bya bopeto ya Nzoto ya bango. Ezali lisungi libongisami mingi mpo na bato bakima bitumba o zone ya sante ya Punia.
/sites/default/files/2026-08/25082026-p-l-_journal_lingala_de_ce_mardi_25_aout_2026_-_web_.mp3





