Journal Lingala de ce mercredi 26 aout 2026

1/Kinshasa :  OMS ezali kosenga sanza motoba ya kimya mpo te bakoka kotinda basali ya bokolongonu bwa nzoto o mboka inso o RDC epayi wapi bokono ebola ezali konyokolo bato. Mbela eye epesami na nkati ya mokanda ya bompanzi sango ya ONU.

2/Kinshasa : Mbulamatari ya ekolo epekisi misala minso mya Univisersite ya  Leta Goma mpe Bukavu mpo na mobu elingi kobanda.  Meko ezwami mpo na mwa ntango zambi lya bozangi bokengi o bingumba bina bibale.

3/  Lubumbashi : Bana ya  Congo démocratique bakima ekolo bavandi o Tanzani basengekli kozonga o ekolo ya Bango. Yoko likita lisalemaki  o Lubumbashi nkati ya RDC, Tanzanie na HCR mpo na komanyola lolenge nkani basengeli kozongisa bana Congo o ekolo ya bango.

/sites/default/files/2026-08/26082026-p-l_-journal_lingala_de_ce_mercredi_26_aout_2026_-web.mp3