Journal Lingala du 31 août

1/ Kinshasa : Ministre ya education Raïssa Malu asakoli te na bozongi bwa kelais ya bana, akotia o bituka binso cantines scolaires ntuku sambo na mwambe. Yango mpo na kosunga bana kelasi kotanga malamu.  

 

2/Mongala :  O Mongala misala mikosalema malamu te nkati ya assemblee provinciale  na mokambi wa etuka. Bai politiki ya Union sacree de la  Nation basengi na bakonzi ya likolo,  kokanga bongo ndako ya makita ya assemblee provincial, mpe kolongola o mosala  mokambi wa etuka Jean Colin Makaka. Mpamba te, bazali koyangela etuka mongala mabe, mpe bazosala mosala ya leta na kotutisa mitu mya bai politiki eppayi waoi ekotisi bonyinani.

 

3/Matadi : O Boma mosala ya kobeta brique ya mabele eye batumbaka, na mombongo myango mizali kosunga bilenge baike o engumba. Yango mpe ezali kosunga kotonga engumba Boma.

/sites/default/files/2026-08/31082026-p-l-_journal_lingala_de_ce_lundi_soir_31_aout_2026-web.mp3