TITRES
Awa na Kinshasa ministre o matali bitando ya ekolo apesaki lobi loleki na bakambi ya polusu bisaleli ya kotambola po ya misala ndenge na ndenge mingi penza bolukaluki na ntina ya kobundisa mabe kati na misala ya polusu….
Na Nord Kivu nzoto leka zomi ya bayi makama ya mayi ya mia misato moleki na etima ya kivu bikundamaki lobi loleki mua mosala mineyi na Goma. Milulu misalemaki o boso ya mabota ma bango na bakambi ndenge na ndenge ya ekolo pe ya bituka Nord na Sud Kivu ….
Tokolobela pe bokutani ya ministre o matali nkita ya ekolo na bayi mimbongo ya etuka Kasai Central eye esalemaki lobi loleki na Kananga….
/sites/default/files/2024-10/11102024-p-l-journallingalamatin-0web.mp3