LES TITRES
Masolo masalema kati na bayi ekolo Congo Demokratiki banso po ya kozua biyano na nkokoso ezuami sika o ekolo, wana likanisi ya ba mbanda politiki ya ekolo kotanga Martin Fayulu, Moise Katumbi, Delly Sessanga pe Joseph Kabila. …likanisi liye lizuami kati na yoko liyebisi ya elongo ya mia tuku misato moleki….
Engebene na mokolo bakokundolaka mosala mia yambo inso ya sanza ya mitano , mbula matari ya ekolo Congo Demokratiki ezui mokano ya kobongisa lifuti ya basali , sango epesamaki na ministre o matali misala kati na ekolo Ephraïm Akwakwa …
Na Kalemie bakambi bayike ba mampinga pe polusu bakitisami na bitumbu kobanda na mibu tuku mibale ya boloko kino etumbu ya liwa ,ntina tokoyeba yango kati na sango na biso...
/sites/default/files/2025-05/02052025-p-l-journallingalamatin-00_web.mp3







