Awa na Kinshasa bayi lisanga FCC etomboli mingongo po ya kopalela mokano ya ministre o matali sembo na ntina ya kolandela mokonzi wa bango Joseph Kabila , bango batalisaki soni pe mawa na bango kati na yoko mokanda babimisaki mua poso moleki …..
O tango molongo mobimba ekundolaki mokolo ya bonsomi ya bopanzi sango mua poso moleki , awa o ekolo lisanga Journaliste en danger etomboli mongongo po ya kolobela matungisi makosalamelaka bapanzi sango mingi o monyele ya ekolo o tango booko bitando bizuami o maboko ya batomboki , Jed esengi kotia molunge na ba M23 o matali kobuka makoki ma moto pe bonsomi ya bopanzi sango …..
Kati na sango eye tokolobela pe bokono bua pulupulu ekasi boye bomati na Kalemie o etuka Tanganyika, batangi bakoni leka mokama na bawewyi babale , ntina ya bomati bua yango tokolanda kati na sango na biso…
/sites/default/files/2025-05/05052025-p-l-journallingalamatin-wweb.mp3