Kati na sango na biso ya tongo ya lelo Tokolobela bitumba makasi bisalemaki mokolo mobimba ya lobi loleki na nzela Kitshanga Muesso kati na mampinga ba Fardc pe batomboki ba M23 na lisungi ya ekolo Rwanda kuna na Nord Kivu , bayi Fardc babuaki mbela ona bayi molongo pe na lisanga ya Eac po te’ bayeba maye maakoleka kuna….
Misala ya bokomisami po ya maponami mibandisamaki o ekolo Belgique mingi penza na Bruxelles uto mia tuku mibale na mitano ya sanza eleki , sika boni boni yango eekosalema tokolanda sango ya motindami wa biso kuna…..
Awa na Kinshasa efonguami mua mosala moko eye likita po ya mbala tuku mineyi na sambo ya misala ya ba assurance o Africa Fanaf na bokuse….
/sites/default/files/2023-02/21022023-p-l-journallingalamatin-wweb.mp3




