Masolo kati Rdc na ba M23 oyo ebanda na Qatar ezongeli lususu kuna. Tango bakutanaki poso mibale yangoyo batalisaki posa ya ngambo inso mibale ya koyokana pona kotika bitumba. Sikawa posa ezali masolo wana ekenda liboso.
Molongo elobelaka Bosomi na mosala ya kopanza sango mokolo ya misato ya sanza mitano ya mobu inso. Rdc pe ekanisi mokolo yango lelo pe molulu moko mosalami na kisasa pona yango. Nde Bongo tata mokonzi wa ekolo asengi ba panzi sango basala mosala na bango nakotosa mambi manso mosala yango esengi.
Koloba te motema malamu esungaka mingi na mokili eza ya solo. Tala ndenge na Kasai oriental Université officiel ya Mbuji mayi na lingomba yoko ya bayi canada bakokoba kosunga pona kosalisa ofele bokono ya mbebo etoboka. Tango awa na kisasa Fondation des anges ekosunga ofele pe lokola bokono binso ya ba mama pe biye ya kozanga kobota.
sites/default/files/2025-05/06052025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3







