Minister atali mambi ya botongi malamu na mboka to amenagement du territoire asengi bisika binso ya Kongo bizala na linaka ya botongi mboka malamu pe bitosa nioso linaka na linaka ekolakisa po bitumba to makama bizala te.
Na Kongo central mokolo ya lomingo. Yoko Camion bene ya moko kompani na Moanda ebomi bato mitano na yoko likama na Kasangulu. Tango kaka na lomingo yango yoko soda ya mampinga ma ekolo ye akoti na yoko ndako nzambe na Banana pe abomi bato misato.
Na Ituri bayangeli etuka baza na posa te Nyamusasi esika batia bakimi bitumba pene na Tchomia ekangama. Pamba te pona na bayangeli baye basimba mandoki pe babatamaka na Nyamusasi yango pe basanganaka na mangomba masusu ya batomboki kuna.
/sites/default/files/2025-05/13052025-p-l-journallingalamatin-00web.mp3




