Journal lingala matin

Ba sango ya bakimi bitumba bikosala mawa na Ituri. Ngambo yoko bayi Kongo motango koleka koto tuku misato bakimi bitumba na Djugu. Tango bayi Soundan ya Sudi Motango koto zomi na mitano bango bakimi mboka na bango pona koyingela na Aru na Kongo.

Lelo nde ndako ya bosembo ya mobeko likonzi ekokamata mokano na bosambisi likambo ya parc ya Bukanza lonzo. Bakonzi bayike ya kala bafundami na likambo yango. 280 millions ya dollars ebimaka pona mosala yango kasi lelo boye esinga mbongo yango ekenda eyebani te.

Ndako ya bolukaluki na kombo institut de recherche Ebuteli ebimisaki lobi yoko mokanda ya mosala na bango ya kolandela lolenge maponomi malekaka na Rdc. Mokanda moye molobeli mingi penza maye malekaki na maponami ya 2023. Nabokuse mosala ya Ebuteli elobi kanyaka etambolaki makasi penza na maponami manso ya Rdc na mobu yango.

 

 

/sites/default/files/2025-05/14052025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3

Dans la même catégorie