Na Nord Kivu , bana basato baweyi pe basusu mitano bazoki makasi na yoko bombi bibetaki na territoire ya Rutshuru mua mosala mitano pe mua poso moleki , mbela ebuakami ona masanga makobundisaka ba bombi po yango , nzoka nde bango bazuami na nkokoso ya kokota o bisika bikokonzama na batomboki ba M23 ….
Na Paris o ekolo Fransa bayi mboka bazangi lolenge ya komikomisa po ya maponami na ntoina tokolanda yango kati na sango eye…..
Na Kwilu minganga baye bakozuaka matabisi ya misala te batomboli mingongo po ya kosenga na mbula matari ya ekolo kobakomisa po yango na libela …
/sites/default/files/2023-02/27022023-p-l-journallingalamatin-web.mp3





