Journal lingala matin

Zuzi asambisaka basali to bakambi misala ya leta asengaki lobi ndako bontoma ya ekolo endima asambisa ministre ya mambi ma bosembo Constant Mutamba. Ye Constant Mutamba afundami na zuzi wana te azwi misolo ya leta motuya millioni zomi na libwa pe atie yango na libenga naye. Mbongo yango ezalaki bo elobi zuzi pona kotonga boloko moko na Kisangani etuka Tshopo.

Mbulamatari ya kisasa apekisi ba mituka ya minene to remorques bitambola lisusu na engumba mokonzi na moyi te. Kasi batambusi mituka yango basengi bapesa  bango mua ngonga.

Moyangeli sud Kivu azalaki lisusu na etuka te wuta ba M23 bakoma na Bukavu sanza mineyi yangoyo. Kasi wuta lobi Jean Jacques Purusi azongi lisusu na sud kivu pe azongeli kiti naye ya bokonzi kasi na Uvira po na Bukavu ba m23 baza nano kaka.

 

 

/sites/default/files/2025-05/22052025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3