Joseph Kabila aza na Goma wuta nokolo mua lomingo ndenge kaka alakaki. Kasi ngambo na ye molobeli ya mbulamatari ayoki pasi komona mokonzi ya kala ya Kongo bo elobi ye kosangana na babundisi Kongo.
Na Kasai Oriental bokono ya kosukosu ya pema to tuberculose ezwami lisusu na Boloko monene ya Mbuji Mayi. Ministre ya sante na etuka asengi batia bakangami bazuami na kosukosu yango mosika na basusu po bokono yango bozwa boloko mobimba te.
Ministre alandelaka mambi ya libenga ya leta alobi misolo minso misengeli pona kobongisa ba nzela ya engumba mokonzi kisasa leta asi apesi yango pona misala yango. Ba nzela yango bizali neti avenue du tourisme, By Pass, Badiandingi to Kimuenza Gare. Nasuka ya poso eleki ministre akitaki yemoko na bisika misala miango mikosalama po amimonela yemoko.
/sites/default/files/2025-05/27052025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3