Journal lingala matin

Na Nord Kivu. Mangomba Badilika na Amnesty international balobi te ba M23 bakonyokolo makasi boko basoda ya Rdc, ba pulusu, ba Wazalendo pe bayi mboka bayike bakangama na ba M23 yango. Pe mangomba maye mabale masengi ba M23 batika bato banso bana.

Kalemie pe zinga nzinga na Tanganyika bizali na molili mikolo mitano yangoyo. Snel na etuka elobi te centrale hydroelectrique ya Bendera ezwi mua kokoso. Pe kobongisa yango esengi motuya ya misolo koto muambi.

Kaka na koluka lolenge ya kopekisa mayi makotisaka milelo na mabota pe kobundisa lisusu bosoto na engumba mokonzi ya Rdc. Banque mondiale na mbulamatari ya engumba kisasa bayokanaki mikolo mibale yangoyo kobundisa makambo mabale maye. Pe Banque mondiale akopesa pona yango misolo motuya millioni kama mibale.

 

/sites/default/files/2025-05/28052025-p-l-journallingalamatin-00mp3web.mp3