Ekolo na biso Rdc ezwi lisusu ebonga ya mua tango na conseil ya sécurité ya Onu lingomba ya molongo elandelaka kimia pe bokengi na mokili. Ezali mbala liboso te Rdc ezwa ebonga eye pamba te na eleko ya zaire Kongo esi ezwa mbala mibale ebonga na lingomba yango ya Onu. Kozala na ebonga eye ekosunga Rdc kozalaka na masolo ya kimia pe bokengi mitali Africa pe mokili mikosalamaka kuna na lingomba ya sécurité yango ya Onu.
Na etuka Kwilu. Moyangeli mambi ma kelasi na etuka aleli epa ya leta asala eloko pona biteyelo ya Bandundu ville biye bibebi na ba mvula mibeti mikoloyo na etuka pe engumba. Boko manzaza miayango bilongwe. Bisusu bibukani ndambo. Bisusu lisusu bibukani penza nioso.
Na Occ kompani ya leta elandelaka biloko bikotoko na ekolo ba Sali bazali na kanda pe batelemisi mosala lelo. Posa na bango ezali leta alongola bakonzi na bango pamba te bango basali balobi bazo futama ngonga inso te. Soki babeli lisalisi ezali te. Pe lisusu bakonzi yango bayebi pe mosala malamu te.
/sites/default/files/2025-06/04062025-p-l-journallingalamatin-00mp3web.mp3