Journal lingala matin

Ndenge ebongisamaki mikolo ebele yangoyo Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi na mbanda naye ya politiki Martin Fayulu bakutanaki lobi na ndako ya mosala ya Felix Tshisekedi. Basololi lolenge ya kosilisa bitumba na ekolo pe kobundisa bozangi bomoko kati na bayi Kongo.

Lingomba amnesty international elobelaka lolenge bosembo ekotiama na misala na molongo ekomi yoko mokanda ya sika pona kolobela minyoko bayi Kongo bakobika na monyele mua ekolo awa pe bitumba babengi la Guerre de six jours esalamaka na Kisangani ekokisi mibu tuku mibale na mitano. Na mokanda yango lingomba Amnesty alakisi kokamua naye po polele, bosembo pe kofuta mabe masalama mazali te na minyoko miso mikosalama na Rdc.

Na Tanganyika. Unicef na Caritas développement bandaki mikolo mibale yangoyo yoko linaka ekosunga bana motango koto tuku motoba ya bingumba Kalemie na Nyunzu bakobika na pasi. Bana yango bazali ndakisa baye babimisi bango na mangomba ya basimba mandoki. Bongo Unicef na caritas bakosunga bana baye neti nakokotisa bango na kelasi

 

/sites/default/files/2025-06/06062025-p-f-journallingalamatin-00mp3web.mp3